Eklezia wapi Yesu apesaki lobiko ntango ayaki na mabele oyo eleki mibu 2.000 mpe atie Elekeli ya kondimana ya sika, mpe Eklezia oyo ezalaki kosangana na basantu ya Eklezia ya liboso lokola Bantoma Paulo, Petelo, mpe Yoane ezalaki Eklezia ya Nzambe. Kasi, pene na ekeke ya 4, mibeko ya Nzambe elongolamaki, mpe misala ya bapakano ekɔtaki na lingomba. Pole ya lobiko elimwaki mpe Mikolo ya Molili ebandaki.
Engebene na esakweli ya Biblia, Christ Ahnsahnghong abandisaki Eklezia ya Nzambe na Corée na 1964 mpe akambaki Eklezia na bosolo ya Elekeli ya kondimana ya sika oyo etongamaki na Biblia mpe moboko ya basakoli. Atatolaki bana na Ye na ntina ya Nzambe Mama, oyo ayaki na mabele oyo mpo na kobikisa bato, kolobaka, “Petelo alandaki Yesu, mpe ngai nalandi Mama.”
Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso : 1 Bakolinti 1:2
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba. Baefese 2:20
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy